
Kisangani, mokolo mwa 05 Sánzá ya motóba 2026 (Kwetufm.net)
Thomas MakunyaMokonzi ya Direction Provinciale ya Agence Congolaise de Promotion Immobilière (ACOPRIM) na Tshopo, na nsinga mpe ndingisa ya Ministre ya bitúka ya Urbanisme mpe Habitat ZEREKPE OLIMBO Nicolas, asakoli polele ebandeli ya opération monene ya boyebi (identification) ya bafandi (Occupants Principaux) mpe baye banso basalaka misala ya mombongo, boteki, botiami ya ba ndako ya kobandela (location), mangomba ya losambo (églises) mpe misusu na kati ya ba sites zomi na moko (11) ya l’État oyo ezali Banda BOYÉ na maboko na bango.
Likambo oyo ezuami na sima ya boyokani mpe masolo mazali kolandana oyo esalamaki lélo Mokolo ya vendredi na ndako ya makita (salle ya réunion) ya Direction Provinciale ya ACOPRIM, ezuami na commune ya Makiso, mosika te na rond-point MAPENDANO soki ozali komata na loboko ya mwasi pembeni ya Ndako ya boyangeli étuka (Gouvernorat). Équipe mobimba oyo ekozala na mokumba ya kokabola banzela ya bohebi (invitations) na bafandi banso etambwisami na motweli, ndéko Dikitele Thomas Makunya Eboga.



Mpo na kokundola, opération oyo ya boyebi eyeli mpo na kolanda mitindo mpe malako ma Mokonzi ya Étuka ya Tshopo, mwana mboka Éexcellence Paulin Lendongolia Lebabonga. Ye moko andimisi ete ba sites nyoso zomi na moko (11) ya ACOPRIM esengeli na bosembo ete ekambama mpe ebatelama na baye baponami mpo na yango. Yango nde ezuami na maloba ma Ministre Provinciale ya Urbanisme mpe Habitat na micro ya média na bino *kwetufm.net*. Mokambi oyo ya mbulamatari atambolaki elongo na Conseilier na ye na sima ya bo zongeli ya makita oyo ye moko akambaki lélo mokolo ya Vendredi 05 Sánzá ya motóba 2026.


Makita oyo ezalaki mpo na kobongisa kokutana monene ya mokolo ya Lundi 08 Sánzá ya motóba oyo ekosangisa bafandi banso mpo na koyoka liloba lya mbulamatari.

Bato banso bazali na kati ya ba sites yango bazali kosengibwa komibongisa mpo na bosembo mpe botosi mibeko mpo na botomboli engumba Kisangani.**Na bopanzi sango ya
Jason Lohose.
