mardi, juin 9, 2026
AccueilUncategorizedKISANGANI : Ba téki 5 ya mabelé bakweli likambo mpe bakangami bango...

KISANGANI : Ba téki 5 ya mabelé bakweli likambo mpe bakangami bango na Polisi na Cité PECHO

Kisangani, Mambi ma mabelé ezali ko tutisa mitu ya bayi population mpe ko yokisa pasi Penza.

Cité Pecho, Na ekateli ya makasi mpo na kopekisa kofunama mpe koyiba mabelé ya bato, Polisi ya PNC/Tshopo, na litambwisi ya Colonel Mofanza ya  » Brigade Judiciaire « , ekangi bilenge mitano (5) na mosala ya bampunzi, Lundi eye na Bloc Motumbé, Quartier Plateau Boyoma (Commune Makiso). Likambo oyo esalemi na tangu ya midi na bofungoli miso ya Ministre wa mambi ma kati mpe bokengi, Michel Bakay, nsima ya koyoka milelo ya bana-mboka oyo bamoni ndenge bilenge oyo, ba mbula kati ya 20 mpe 30, bazali kotekaka o montako na bango moko mabelé ya bato na makasi kozanga mikanda ya Leta to pé ndingisa ya ba bakonzi ya misala étali mabélé awa na Tshopo.

Likambo oyo ezali kobenda bitumba, mbutu mbutu lokola mpe koboma bato, ndenge masese na biso ya Lingala elobaka ; « Likambo na nse, likambo na ndako ; moyibi aza na nko, kasi moluki eloko akofuta na makila. »

(Koyiba mabelé ekoki komema liwa). Oyo ezali ndakisa monene mpo na bateki mabelé na nko, mpe Ministre asengi na bavandi banso ya Kisangani, mpe mingi mpenza baoyo ya Cité PESHO, awa, Ministre Michel Bakay elongo na kombo ya mokonzi ya étuka mwana mboka Paulin LENDONGOLIA a pesaki mitindo na Colonel Mofanza na esika ya likambo ko kanga ba dongolo miso oyo.

Kaka wana, Mwasi moko oyo akweli na motambo na bango azali kolakisa bampunzi wana na mosapi mpo na tina yaye ko zongisama na bosolo na yé na misolo oyo à mo sombaki mabélé na maboko ya ba escrocs ya ngo.

Na ELOBELI na yé, Yé MINISTRE MICHEL BAKAY ya mambi ma kati pé bonengi na Tshopo liboso ya bapanzi sango o ndako na yé ya mosala na bo wuti na Cité PESHO a pesaki malamu mutu ya likambo ;

« Totondisami na nkanda mpe toye awa mpo na kopesa eyano ya makasi na mitindo ya Guvener ya Etúká, paulin Lebabonga. Tokoki kotika te ete bato moke bazanga loyenge bapanza kimia ya bana Boyoma na kofunama mabelé. Lelo, batano bakangami na flagrance, mpe batindami na maboko ya bosembo (Justice) mpo batandisama na minyololo. Toshopola mobimba, na bitúká na yango nsambo (7), ezali lisusu esika ya kosakana ya bampunzi te. Popolasion ezala maso, bafunda mobulu nionso ! »

Na mokuse ya JDL//Kwetu.net

+243 82 811 73 75

ARTICLES SIMILAIRES

POPULAIRE